Matthew 8

Yesu abikisi bato ya maladi

(Mk. 1.40-45 ; Lk. 5.12-16)

1Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki ye.

2Bongo moto moko ya maladi ya maba ayaki, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki :

—Nkolo, soki olingi, okoki kokomisa ngai peto.

3Yesu atombolaki loboko, asimbaki ye, mpe alobaki :

—Nalingi yango ; koma peto.

Kaka na tango wana apetolamaki na maba na ye.

4Bongo yesu alobaki na ye :

—Yoka ! koyebisa likambo oyo na moto te ; kasi kende komilakisa epai ya nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize atinda. Yango ekozala litatoli epai na bango.

(Lk. 7.1-10 ; Jn. 4.43-54)

5Tango yesu azalaki kokota na Kapenawumi, mokonzi moko ya basodaayaki epai na ye mpe asengaki ye lisalisi ; 6alobaki :

—Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali na maladi ya buka-buka, mpe azali koyoka pasi mingi penza !

7Yesu azongiselaki ye :

—Nakokende kobikisa ye !

8Mokonzi ya basoda alobaki :

—Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ; kasi loba kaka liloba moko mpe mosali na ngai akobika.
9Pamba te ngai moko mpe nazali na nse ya bokonzi ya bakonzi, mpe nazali na basoda oyo bazali na nse ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : “Kende”, akokende. Mpe na mosusu ; “Yaka”, akoya. Mpe na mosali na ngai : “Sala boye” ; akosala yango.

10Yesu akamwaki mingi tango ayokaki bongo. Bongo alobaki na bato oyo bazalaki kolanda ye :

—Nalobi na bino ya solo, naino namoni kondima monene ya boye te na Isayele.
11Nalobi na bino : bato mingi bakowuta na mikili ya Este mpe ya Weste bakovanda elongo na Abraham, Izaki mpe Zakobi kati na Bokonzi ya Likolo. 12Kasi bato oyo basengelaki kozala bato ya Bokonzi, bakobwaka bango libanda, kati na molili ; epai ekozala kolela mpe koswa mino.

13Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda :

—Kende, esalama se bongo ndenge ondimeli ! Mpe, kaka na tango wana, mosali na ye abikaki.

Amemaki bamaladi na biso

(Mk. 1.29-34 ; Lk. 4.38-41)

14Tango Yesu akomaki na ndako ya Piere, akutaki bokilo ya pierealali na mbeto mpo azalaki na fievre. 15Yesu asimbaki loboko na ye, mpe fievre esilaki. Bongo atelemaki, mpe abandaki kobongisela ye biloko ya kolia !

16Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki ya kokangama na milimo mabe. Na liloba moko, azalaki kobengana milimo wana ya mabe ; mpe azalaki kobikisa bato nyonso ya maladi. 17Na yango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisamaki : Azwaki bapasi na biso,
mpe amemaki bamaladi na biso !

Ndenge moyekoli asengeli komipesa

(Lk. 9.57-62)

18Tango Yesu amonaki bato ebele penza bazingaki ye, atindaki bayekoli na ye bakatisa na ngambo mosusu ya ebale. 19Molakisi moko ya Mibeko ayaki epai na ye, mpe alobaki :

—Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende !

20Kasi yesu azongisaki :

—Banyama ya zamba bazali na mabulu na bango, mpe bandeke bazali na bazala na bango ; kasi Mwana ya Moto azali na esika oyo akoki kopemisa motu te !

21Moto mosusu, moko na kati ya bayekoli na ye, alobaki na ye :

—Nkolo, pesa ngai nzela nakende liboso kokunda tata na ngai.

22Kasi Yesu azongiselaki ye :

—Landa ngai, mpe tika baoyo bakufa bakunda bakufi na bango.

Yesu aleki mopepe na makasi

(Mk. 4.36-41 ; Lk. 8.22-25)

23Bongo Yesu amataki na bwato mpe bayekoli na ye balandaki ye. 24Na mbala moko, mopepe ya makasi ebandaki koleka na ebale, na ndenge ete mbonge ezalaki komata likolo koleka bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. 25Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe balamusaki ye ; balobaki :

—Nkolo, bikisa biso, tolingi kokufa !

26Kasi yesu azongisaki :

—Bato ya kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Atelemaki, agangelaki mopepe na ebale, mpe kimia ezongaki.

27Bato bakamwaki mpe batunaki :

—Yango moto oyo azali nani, mpo ete mopepe na ebale etosa ye ?

Yesu aleki milimo mabe na makasi

(Mk. 5.1-20 ; Lk. 8.26-39)

28Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na mokili ya Gadara, bato mibale bazalaki na milimo mabe, babimaki na simetiele mpe bayaki kokutana na Yesu. Bazalaki na kanda mingi penza, yango wana moto ata moko te azalaki komeka koleka na nzela wana.

29Babandaki koganga :

—Mwana ya Nzambe, olingi kosala biso nini ? Boni, oye kotungisa bisoliboso ete tango ekoka ?

30Mwa mosika moke, etonga monene ya bangulu ezalaki kolia. 31Milimo mabe ebondelaki Yesu :

—Soki obengani biso, tinda biso tokota na bangulu wana !

32Bongo Yesu alobaki :

—Bokende !

Milimo mabe ebimakina na bato wana mibale mpe ekotaki na bangulu. Kaka na tango wana, bangulu yango nyonso elongwaki mbangu na ngomba, edindaki na ebale mpe ekufaki na mayi.

33Bato oyo bakengelaka bangulu bakimaki ; bakendaki na vile, mpe bayebisaki makambo nyonso na oyo esalamaki na bato oyo bazalaki na milimo mabe. 34Bato nyonso ya vile babimaki mpo na kokutana na Yesu ; tangu bamonaki ye, babondelaki ye alongwa na mokili na bango.
Copyright information for LinMNB